Jeremi 14:15 - Mokanda na Bomoi15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na basakoli oyo bazali koloba na Kombo na Ngai : « Natindaki bango te, atako bazali koloba : ‹ Mopanga mpe nzala makasi ekokweya na mokili oyo te. › Basakoli yango bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.