Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 14:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kasi nazongiselaki Ye : — Oh Nkolo Yawe, basakoli bazali kokoba koloba na bango : « Te ! Bokotikala komona mopanga to nzala makasi te, kasi nakopesa bino kimia ya solo na esika oyo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 14:13
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso, bango nyonso bazangi mayele ; bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te, bakokaka koganga te, mosala na bango kolala mpe kolota bandoto, balingi pongi makasi.


Nazongisaki : — Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge !


Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. »


Bazali koloba na bato oyo batiolaka Ngai : ‹ Yawe alobi : Bokozala malamu ! › Mpe na bato oyo balandaka makanisi mabe ya mitema na bango : ‹ Mabe moko te ekokomela bino ! ›


Wapi basakoli na bino oyo bazalaki koloba ete mokonzi ya Babiloni akoya te kobundisa bino mpe mokili na bino ?


Bongo nalobaki : « Oh Nkolo Yawe, tala ndenge okosaki bato oyo mpe Yelusalemi tango olobaki : ‹ Bokozala na kimia ! › Nzokande mopanga ezalaki kozela biso. »


Bawanganaki Yawe mpe balobaki : « Yawe akosala eloko moko te ! Pasi moko te ekokomela biso ; tokotikala na biso komona te ezala mopanga to nzala makasi.


Basakoli bazali kaka lokola mopepe ya pamba, bazali na mateya penza ya koteya te ; boye tika ete mabe oyo bazali kosakola ezongela bango moko ! »


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba : ‹ Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu ! › Nzokande ata likambo moko ya malamu ezali te.


bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo mpe bazali koloba : ‘ Makambo nyonso ezali malamu, nyonso ezali kotambola malamu ! ’ Nzokande, ata likambo moko ya malamu ezali te.


Bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ekozala lisusu te kati na bana ya Isalaele.


Lokola bozali kolembisa mitema ya bato ya sembo na nzela ya lokuta na bino, nzokande Ngai moko nalembisaki bango mitema te ; lokola bozali kolendisa bato mabe ete bakangama na etamboli na bango ya mabe mpo ete babikisa bomoi na bango te,


Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »


Ndenge kaka basakoli ya lokuta bazalaki kati na bana ya Isalaele na tango ya kala, ndenge wana mpe bateyi ya lokuta bakozala kati na bino ; bakokotisa na mayele mabe mateya ya lokuta mpe ya libebi kino ata kowangana Nkolo oyo asikolaki bango, mpe bakomibendela libebi na mbalakata.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ