Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 14:10 - Mokanda na Bomoi

10 Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo : « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, bavandaka esika moko te. Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 14:10
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi yango alobaki na Eliya : — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ?


Natambolaka te na banzela nyonso ya mabe mpo na kotosa liloba na Yo.


Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›


Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango.


Mpo na nini omipesi na koyengayenga na nzela nyonso ? Okosambwa mpo na Ejipito ndenge osambwaki mpo na Asiri.


Ndima kaka mabe na yo, mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo ; obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya, na se ya banzete nyonso ya mibesu, mpe otosaki Ngai te, › » elobi Yawe.


Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »


Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba to na matiti ya solo kitoko oyo ewuti na mboka ya mosika ? Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, mpe nandimaka makabo na bino te. »


Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela ? Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe ? Bamipesi makasi na makambo ya lokuta mpe baboyi kozongela Ngai.


Mokili ya Ejipito ekozala lisusu mpo na bana ya Isalaele mokili ya kotiela motema te, kasi ekokoma lokola ekaniseli ya masumu oyo bato na Ngai bazalaki kosala tango bazalaki koluka lisungi epai na yango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. › »


Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo. Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo, moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.


Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi, nakobebisa lisusu Efrayimi te. Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te ! Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino ; nakoya lisusu na kanda te.


Mawa na bango mpo ete bakimi mosika na Ngai ! Tika ete babebisama mpo ete batombokeli Ngai ! Wana nazalaki na Ngai kokangola bango, kasi bango, basepelaki kokosela Ngai makambo !


Bamilobelaka te, kati na mitema na bango, ete Ngai nabosanaka te mabe nyonso oyo basalaka ; sik’oyo, misala na bango ya mabe ezingeli bango, ezali tango nyonso liboso na Ngai.


Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.


Bamikotisi penza kati na mabe ndenge basalaki na mikolo ya Gibea. Nzambe akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango.


« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona kati na bituka nyonso ya mabele ; yango wana nakopesa bino etumbu mpo na mabe nyonso oyo bosali.


Ata soki bomemeli Ngai bambeka na bino ya kotumba to ya bambuma, nakondima yango te ; ata soki bomemeli Ngai bambeka ya boyokani, oyo eleki mafuta, nakotala yango ata moke te.


nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. › »


Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nakopesa bato ya Amaleki etumbu mpo na makambo oyo basalaki Isalaele tango bawutaki na Ejipito : bakangelaki Isalaele nzela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ