Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 13:9 - Mokanda na Bomoi

9 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali boye nde nakosilisa lolendo ya Yuda mpe nakokitisa mapeka ya Yelusalemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 13:9
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.


Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, ndenge atombolaka mapeka : lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye, lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azwaki mokano yango mpo na kosambwisa lolendo ya nkembo nyonso mpe kokitisa kino na se bato nyonso ya lokumu, oyo bazali na mabele.


Yelusalemi elongo na bingumba ya Yuda, bakonzi mpe bakalaka na yango ; mpo na kobebisa yango, kokomisa yango eloko ya somo, ya maseki mpe ya lisuma, ndenge ezali komonana sik’oyo.


Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, lolendo oyo eleka penza ndelo ! Tala ndenge amatisaka mapeka ! Atondi na lofundu, azali na monoko makasi, mpe motema na ye emikitisaka te.


Bakomaki bato ya lofundu makasi mpe bakomaki kosala makambo ya mbindo na miso na Ngai. Yango wana, nalimwisi bango ndenge ozali komona.


Na mokolo ya lolendo na yo, ozalaki kutu kolobela mabe ya Sodome, ndeko na yo,


Nakosilisa makasi na bino, nakokomisa lola makasi lokola ebende mpo na bino, mpe mabele na bino lokola bronze.


Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe ! Batela malamu bandako na yo batonga makasi, kengela nzela na yo, bongama mpo na bitumba mpe sangisa bato na yo.


Na mokolo wana, oh bato na Ngai, bokoyokisama lisusu soni te mpo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai, pamba te nakolongola bato oyo bamimatisaka na lolendo kati na bino. Boye bokomitombola lisusu te na lolendo na ngomba na Ngai ya bule.


Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.


Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ