Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 13:27 - Mokanda na Bomoi

27 Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 13:27
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazali komilakisa, bazali kobimisa mafinga ; bato nyonso ya misala mabe bazali komikumisa !


Bino bato ya kilikili, bososola ! Bazoba, bokokoma mayele tango nini ?


« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?


Otiaki mbeto na yo na likolo, na songe ya ngomba ; kuna nde ozalaki komata mpo na kobonza mbeka.


Ezala mpo na masumu na bino to mpo na masumu ya batata na bino, » elobi Yawe, « pamba te babonzaki malasi ya ansa na likolo ya bangomba milayi mpe basambwisaki Ngai na likolo ya bangomba mikuse ; solo penza, nakozongisela bango mabe, nakofuta bango kolanda misala na bango oyo eleka ! »


« Eloko nini penza molingami na Ngai azali kosala kati na Tempelo na Ngai, wana azali kosala mabongisi mabe ebele ? Okanisi ete ndayi mpe misuni oyo ebulisama ekoki solo kolongola etumbu na yo ? Boni, okanisi ete okoki kobika na nzela wana ? »


Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba.


Mawa ! Mawa penza mpo na yo, elobi Nkolo Yawe ; sima na yo kosala mabe wana nyonso,


Loboko yango efungolaki mokanda yango liboso na ngai. Na bangambo na yango nyonso mibale, bakomaki : basango ya bileli, ya mikakatano mpe ya pasi.


Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga.


Kasi konzuluka na yango esilisi makasi ya bato, bosoto na yango etikali kolongwa te ! Ezala moto, elongi te kolongola bosoto yango !


Yelusalemi, mbindo na yo ezali kindumba. Nalukaki kokomisa yo peto, kasi olingaki kopetolama te na bosoto na yo. Okotikala lisusu kozala peto te kino tango nakosilisa kosopela yo kanda na Ngai.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na engumba oyo esopaka makila, nzungu ya salite, nzungu oyo elongwaka salite te ! Tika yango pamba, longola eteni moko na moko kino nyonso ekosila na kobeta zeke te.


Nakobwakela bino mayi ya peto, mpe bokokoma peto ; nakopetola bino na mbindo na bino nyonso mpe na mbindo ya banzambe na bino nyonso ya bikeko.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mbala oyo lisusu, nakosala ete libota ya Isalaele eluka Ngai mpo ete natalisa bango ngolu na Ngai : nakosala ete bato na yango bakoma ebele lokola bibwele.


Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe tango bato na bango bakokufa na mopanga kati na banzambe na bango ya bikeko zingazinga ya bitumbelo na bango, na bangomba nyonso ya mikuse mpe na likolo ya bangomba nyonso ya milayi, na se ya banzete nyonso ya mibesu mpe na se ya terebente nyonso ya mobesu etonda na makasa, bisika oyo bazalaki kotumbela banzambe na bango ya bikeko ansa lokola mbeka ya solo kitoko.


Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye : — Kende, linga mwasi oyo asalaka kindumba mpe bota na ye bana makangu, pamba te mokili emikotisi na kindumba mpe epesi Yawe mokongo.


etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.


Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele ! Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango. Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto ?


Mawa na engumba ya batomboki, engumba ya makambo ya mbindo, mpe engumba oyo enyokolaka bato !


Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !


Solo, nazali kobanga lisusu ete, tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe ete nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, na kindumba mpe na ekobo oyo basalaka.


Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.


Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.


Bongo nayokaki mpongo, oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi, koloba na mongongo makasi : « Mawa ! Mawa ! Mawa penza na bavandi ya mokili tango ba-anjelu misato ya suka bakobeta bakelelo na bango ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ