23 Boni, moto mwindo akoki solo kobongola poso ya nzoto na ye ? Nkoyi ekoki kolongola penza matono ya poso ya nzoto na yango ? Bokokoka kosala malamu te, bino bato oyo bomesana kosala mabe.
Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te komona bosolo ? Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga mpe baboyaka kobongola mitema na bango.