Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 13:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mpe soki omituni : « Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? » Ezali mpo na ebele ya masumu na yo nde bapasolaki yo bilamba mpe bazokisaki nzoto na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 13:22
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mokonzi ya Asiri akomema bakangami ya Ejipito mpe bawumbu ya Kushi bolumbu mpe makolo ngulu : ezala bilenge to bampaka, bakotambola bolumbu mpe makolo ngulu mpo na soni ya Ejipito.


Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalata mpe akotika bango bolumbu. »


Yoka sik’oyo, yo mwasi ya biyenga, oyo omesana kovanda na kimia mpe omilobelaka : « Ngai nde nazali, mosusu azali te. Nakotikala kokoma te mwasi akufisa mobali mpe nakotikala kokufisa bana te ! »


Nakotombola yo bilamba kino na elongi mpo ete bato bamona bolumbu na yo.


Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.


Tango bato bakotuna : ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye ? › Bokozongisela bango : ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›


Yelusalemi asali masumu mingi penza, yango wana akomi mbindo. Bato nyonso oyo bazalaki kopesa ye lokumu bakomi kotiola ye, pamba te bamoni bolumbu na ye ; ye moko mpe azali komilela mpe abaluki mpo na kobomba elongi.


Bakobotola yo lisusu bilamba na yo mpe babiju na yo ya talo.


Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.


Asosolaki te ete ngai nde nazalaki kopesa ye ble, vino ya sika mpe mafuta ; ete ngai nde nasopelaki ye palata mpe wolo oyo basaleli bikeko ya Bala.


— Loba na bandeko na yo ya mibali : « Bozali bato na ngai, » mpe na bandeko na yo ya basi : « Bozali balingami na ngai. »


Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka ; mpe akokufa na posa ya mayi.


« Natombokeli yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « nakotombola yo elamba kino na elongi, nakolakisa bolumbu na yo na miso ya bikolo mosusu mpe nakoyokisa yo soni na miso ya bamboka nyonso.


Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka : ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›


Tango mosusu bokoki komituna : ‹ Ndenge nini tokoki koyeba ete maloba oyo azali koloba ewuti solo epai na Yawe te ? ›


Tango mosusu okomilobela : « Bikolo oyo ezali makasi koleka biso, ndenge nini tokolonga kobengana yango ? »


Boye sala keba ete omilobela te : « Nguya na ngai moko mpe makasi ya maboko na ngai moko nde eboteli ngai bomengo oyo ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ