Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 13:20 - Mokanda na Bomoi

20 Oh Yelusalemi, tombola miso na yo mpe tala, bato bazali koya wuta na nor ! Wapi bibwele oyo bapesaki yo ete obatela, mpe wapi meme oyo ozalaki kobetela tolo ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 13:20
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kozala na bato ebele epesaka mokonzi lokumu, kasi mokonzi akweyaka soki azali na bato te.


Yawe alobaki na ngai : — Ezali wuta na nor nde pasi ekokomela bavandi ya mokili.


Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe. Bakonzi na bango bakoya kotia bakiti na bango ya bokonzi liboso ya bikuke ya Yelusalemi ; bakozingela bamir nyonso ya Yelusalemi mpe bakobundisa bingumba nyonso ya Yuda.


Boyoka ! Makelele moko ezali koya, lokito moko ya makasi ewuti na mokili ya nor, ekosilisa bato kati na bingumba ya Yuda mpe ekokomisa yango bandako ya mbwa ya zamba.


Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe,


Bitando ya kimia ekotikala pamba likolo ya kanda ya Yawe.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya longwa na mokili ya nor ; ekolo moko monene ezali komibongisa mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele.


Nakotindela bino bato ya Babiloni, bato ya mitema mabe, oyo bayokelaka bato mawa te : batambolaka mokili mobimba mpo na kobotola bato bisika na bango ya losambo na makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ