kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi : « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » Mpe asalaki kaka bongo ; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu.
Kasi yo, mwana na moto, yoka makambo oyo nazali koloba na yo. Kotombokela ngai te lokola libota ya batomboki oyo ! Fungola monoko na yo mpe lia oyo nazali kopesa yo ! »