Jeremi 13:19 - Mokanda na Bomoi19 Bingumba ya sude ekokangama, mpe moto moko te akokoka kofungola yango. Bato nyonso ya Yuda bakokende na bowumbu, bango nyonso penza bakokende. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato bakowuta na bingumba ya Yuda mpe na mboka oyo ezali pene ya Yelusalemi, na etuka ya Benjame mpe na ngambo ya weste ya bangomba mikuse, na etuka ya bangomba mpe ya Negevi ; mpo na koya kobonza kati na Tempelo ya Yawe bambeka ya kotumba, bambeka mosusu, makabo ya bambuma mpe malasi ya ansa, mpo na kobonza makabo ya kozongisa matondi, kati na Tempelo ya Yawe.
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga.
Sima na Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, komema na bowumbu, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, bakalaka ya Yuda, bato ya misala ya maboko mpe bato oyo balambaka bibende na moto ; Yawe alakisaki ngai bitunga mibale ya bambuma ya figi oyo batiaki liboso ya Tempelo ya Yawe.
Solo, bakosomba lisusu bilanga na motuya ya palata, bakotia mikoloto mpe bakashe na mikanda oyo bakosombela bilanga yango, na miso ya batatoli, kati na mboka ya Benjame, kati na bamboka mike-mike oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi, kati na bingumba ya Yuda mpe kati na bingumba ya mokili ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi ; pamba te nakozongisa bato na bango oyo bakendeki na bowumbu, elobi Yawe. »