Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 13:15 - Mokanda na Bomoi

15 Boyoka malamu mpe bosala keba ! Bosala lolendo te, pamba te ezali Yawe nde alobi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 13:15
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe ; solo, akozanga te kozwa etumbu.


Oh Lola, yoka ! Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka ! Pamba te Yawe nde azali koloba : « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, kasi batombokeli Ngai.


Nani kati na bino akoyoka makambo yango ? Nani akozala na bokebi na makambo oyo ekoya ?


« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali boye nde nakosilisa lolendo ya Yuda mpe nakokitisa mapeka ya Yelusalemi.


Kasi boyeba ete soki bobomi ngai, bokomema ngambo ya pamba na bomoi na bino mpe na engumba oyo elongo na bavandi na yango nyonso, likolo ya makila ya moto oyo ayebi likambo te ; pamba te, solo penza, Yawe nde atindaki ngai epai na bino mpo na koyebisa bino maloba nyonso oyo, mpo ete boyoka yango. »


— Bino bakambi ya bato, boyoka liloba oyo ; bino nyonso, bavandi ya mokili, botia matoyi mpe boyoka ! Boni, likambo ya boye esila kosalema na tango na bino to mpe na tango ya bakoko na bino ?


Kasi Yawe alongolaki ngai na mosala ya kobatela bibwele mpe alobaki na ngai : « Kende kosakola epai ya bato na Ngai, Isalaele. »


Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.


Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ