Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 13:14 - Mokanda na Bomoi

14 Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 13:14
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Amoni mpe ya Moabi batelemaki mpo na kobundisa, koboma mpe kobebisa bavandi ya bangomba Seiri. Tango basilisaki koboma bavandi ya Seiri, bakomaki kobomana bango na bango.


Bakobwakela ye makonga na mawa te, ata azali kosala makasi ya kokima loboko ya moto oyo azali kobwakela ye yango.


Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »


Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.


Oh Yelusalemi, nani akoyokela yo mawa ? Nani akolela yo ? Nani akotelema mpo na kotuna basango na yo ?


Osundolaki Ngai, » elobi Yawe, « opesaki Ngai mokongo. Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo, mpe nakobebisa yo ; nakoyokela yo lisusu mawa te.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Kokota na ndako oyo ezali na matanga te, kokende na matanga te mpe koyokela bato oyo bazali na matanga mawa te, pamba te nalongoli kimia na Ngai, bolingo na Ngai mpe mawa na Ngai epai ya bato oyo, » elobi Yawe,


Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›


Tango bakomela yango, bakolangwa mpe bakokoma kotenga-tenga liboso ya mopanga oyo nakotinda kati na bango. »


tango bakoyoka makelele ya bampunda koleka na lombangu, lokito ya bashar ya banguna mpe makelele ya bapine na yango. Batata bakozala lisusu na tango te ya kosunga bana na bango mpo ete maboko na bango ekolemba.


Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakotindela Moabi bato oyo bakobongola yango lokola masanga ya vino na mbeki mosusu : bakosopa yango, bakosilisa yango na mbeki mpe bakobuka mbeki na yango.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotia mabaku liboso ya bato oyo ; batata mpe bana na bango bakobeta mabaku mpe bakokweya nzela moko, bazalani elongo na baninga bakokufa. »


Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo elali-lali na babalabala ; basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga ! Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo ; obomi bango na mawa te !


Ngai Yawe nde nalobaki. Tango ekoki mpo na Ngai kosala ; nakoyoka mawa te, nakozonga sima te ! Okosambisama solo kolanda etamboli mpe misala na yo, elobi Nkolo Yawe. › »


Tango ya suka ekoki sik’oyo mpo na yo, nakopelisela yo kanda na Ngai, nakosambisa yo kolanda etamboli na yo mpe nakofuta yo kolanda misala na yo nyonso ya mbindo.


Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te ; nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe kolanda misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. ›


Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te, nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka.


Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »


Yango wana, Ngai mpe nakotala bango na liso ya mawa te mpe nakobikisa bango te. Kasi nakotanga mabe na bango na mito na bango.


Wana nazalaki nanu koyoka, alobaki na bato mosusu : « Bolanda ye kati na engumba mpe boboma bato na mawa te, bobikisa ata moto moko te !


Bopamela mama na bino, bopamela ye ; pamba te azali lisusu mwasi na ngai te, mpe ngai nazali lisusu mobali na ye te. Tika ete alongola bilembo ya kindumba na elongi na ye mpe bilembo ya ekobo na mabele na ye.


Yango wana Ngai mpe nakoyokela lisusu bato ya mokili mawa te, nakokaba moto na moto na maboko ya moninga na ye mpe ya mokonzi na ye. Bakonzi bakobebisa mokili, kasi nakokangola ata moto moko te wuta na maboko ya bakonzi yango, elobi Yawe.


Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.


Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye mpo ete baboma ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.


Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.


Bakengeli ya Saulo, oyo bazalaki na Gibea ya Benjame bamonaki mampinga kopalangana na bangambo nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ