Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 13:12 - Mokanda na Bomoi

12 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino. › Mpe soki batuni yo : ‹ Boni, okanisi ete biso toyebi te ete mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino ? ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 13:12
4 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. ›


Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga ; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi.


Tango bakomela yango, bakolangwa mpe bakokoma kotenga-tenga liboso ya mopanga oyo nakotinda kati na bango. »


Boye, bato batunaki ngai : — Okoki koyebisa biso te soki makambo oyo ozali kosala elakisi nini ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ