Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 13:11 - Mokanda na Bomoi

11 Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 13:11
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te Yawe aponaki Jakobi, Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.


Asalaki bongo na ekolo ata moko te ; boye eyebaka mpe mibeko na Ye te. Bokumisa Yawe !


Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ; fungola malamu monoko na yo, mpe nakotondisa yango.


bato oyo Ngai moko nabongisaki mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai.


Bakobenga bango Libota mosantu, basikolami na Yawe ; mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka, engumba oyo basundola te.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kosomba mokaba ya lino mpe lata yango na loketo na yo, kasi kopolisa yango na mayi te. »


Bato oyo bazali bato mabe, bayokaka maloba na Ngai te, bazali mito makasi, batingamaka kosala kolanda baposa ya mitema na bango, mpe balandaka banzambe ya bapaya mpo na kosalela mpe kogumbamela yango ; bakokoma kaka lokola mokaba oyo, mokaba oyo etikali lisusu na tina te.


Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino. › Mpe soki batuni yo : ‹ Boni, okanisi ete biso toyebi te ete mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino ? ›


— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na engumba oyo mpe na mboka oyo ezali zingazinga na yango pasi nyonso oyo nasakolaki na tina na yango, pamba te batosaki Ngai te mpe bayokaki maloba na ngai te. »


Osalaki bilembo minene mpe bikamwa kati na Ejipito mpe ozali kokoba kosala yango kino lelo kati na Isalaele mpe kati na bato nyonso, mpe osalaki ete Kombo na Yo ekende sango ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.


Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›


Naponaki kati na bino bakengeli oyo balobaki na bino : ‹ Boyoka mongongo ya kelelo ! › Kasi bozongisaki : ‹ Te ! Tokoyoka te. ›


Lokola nazalaki kokebisa bino mbala na mbala tango bozalaki kosala makambo oyo nyonso, elobi Yawe, kasi botikalaki koyokela Ngai te ; lokola nabengaki bino, kasi boyanolaki Ngai te,


Nzokande, napesaki bango kaka mobeko oyo : Botosa Ngai, bongo Ngai nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na Ngai ; botambola na nzela nyonso oyo nakolakisa bino mpo ete bozala bato ya esengo.


Kasi batiaki matoyi te mpo na koyoka Ngai ; balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Boye, na esika ete babonga, babebaki lisusu koleka.


Kasi bayokaki Ngai te mpe bapesaki Ngai matoyi na bango te ; bazalaki kaka mito makasi mpe basalaki lisusu mabe koleka bakoko na bango. ›


Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito :


« Ezala putulu ya engumba na bino, topupoli yango wuta na makolo na biso, mpo na kokebisa bino. Nzokande, boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. »


Lelo mpe, Yawe andimi ete ozala ekolo na Ye penza, ndenge alakaki yo mpe ndenge apesaki yo mitindo ete otosa mibeko na Ye nyonso.


Na bongo, Yawe, Nzambe na yo, akokomisa yo monene koleka bikolo nyonso oyo Ye akela ; akopesa yo lokumu, nkembo na Kombo na Ye. Okozala libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alakaki yango.


Pamba te ekolo nini lisusu ya monene, oyo banzambe na yango ezali pembeni na yango ndenge Yawe, Nzambe na biso, azalaka pembeni na biso tango nyonso oyo tobelelaka Ye ?


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ