Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 13:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kosomba mokaba ya lino mpe lata yango na loketo na yo, kasi kopolisa yango na mayi te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 13:1
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Yawe alobaki : « Lokola mosali na Ngai, Ezayi, atamboli bolumbu mpe makolo ngulu mibu misato mpo na kozala elembo mpe ekamwiseli na miso ya Ejipito mpe ya Kushi,


Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. ›


— Kende na ndako ya mosali mbeki mpe, kuna, nakoyebisa yo makambo.


Tala liloba oyo Yawe alobi : — Kende kosomba mbeki epai ya mosali mbeki. Kende nzela moko na bakambi ya bato mpe bakambi ya Banganga-Nzambe ;


Tala liloba oyo Ngai Yawe nalobi : « Sala ekangiseli na basinga mpe banzete mpe kanga yango na kingo na yo.


— Kamata mabanga minene mpe, na miso ya Bayuda, kunda yango na se ya mabele oyo basalelaka bikeko, mabele ya pavema oyo batonga na babiliki, na ekotelo ya ndako ya Faraon, na Dafine.


mpe ayaki kokutana na biso ; azwaki mokaba ya Polo mpe amikangaki na yango makolo mpe maboko. Alobaki : — Tala makambo oyo Molimo Mosantu alobi : « Ezali na lolenge oyo nde Bayuda ya Yelusalemi bakokanga nkolo mokaba oyo, mpe bakokaba ye na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. »


Na tango ya kala, Nzambe azalaki koloba, mbala mingi mpe na lolenge ebele, epai ya bakoko na biso, na nzela ya basakoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ