Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 12:5 - Mokanda na Bomoi

5 Soki ozali kosala momekano ya kokima mbangu elongo na bato oyo bazali kotambola na makolo, mpe bango bazali komelisa yo pema, ndenge nini okoki komekana na bato oyo batambolaka likolo ya bampunda ? Soki ozali komitungisa na mokili oyo ezali na kimia, ekozala boni liboso ya mpela ya ebale Yordani ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 12:5
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo ya libota ya Gadi bazalaki bango nyonso bakonzi ya basoda. Mokonzi oyo azalaki na makasi moke akokaki kobunda na bato nkama moko, mpe oyo alekaki makasi akokaki kobunda na bato nkoto moko.


Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai ; yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani, wuta na songe ya ngomba Erimoni mpe wuta na ngomba Mitseari.


Soki omilembisi na mokolo ya pasi, makasi na yo ekozala pamba.


Mwana na ngai, yamba toli ya Yawe, koboya te pamela na Ye ;


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato ya Anatoti, oyo balingi koboma yo mpe bazali koloba : « Kosakola na Kombo na Yawe te, soki te tokoboma yo ; »


Kasi tango Jeremi asilisaki koloba na bato nyonso maloba oyo Yawe atindaki ye, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye mpe balobaki : « Okokufa !


Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.


Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ?


Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Babiloni na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Babiloni. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ? »


Nzokande, na tango ya kobuka milona, mayi ya Yordani etondaka makasi penza. Kasi tango kaka Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bakomaki pembeni ya Yordani mpe batiaki matambe na bango kati na mayi,


Balingami, bokamwa te bapasi oyo bozali komona, lokola nde likambo ya kokamwa ekomeli bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ