kasi bakokoma koloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na mokili ya nor mpe na mikili nyonso epai wapi abenganaki bango. › Nakozongisa bango na mokili na bango, mokili oyo napesaki bakoko na bango.
Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »
Kende kosakola sango oyo na nor : ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › elobi Yawe, ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, pamba te nazali Moyengebene, › elobi Yawe. ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.
Na tango wana, bakobenga Yelusalemi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, mpe bikolo nyonso ekosangana na Yelusalemi mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yawe. Boye, bakolanda lisusu te baposa mabe ya mitema na bango.
Sima na kolendisama ya bokonzi na ye, mokili na ye ekobebisama mpe ekopanzana bipai na bipai ; bakitani na ye bakozwa lisusu bokonzi te mpe mokili yango ekozala lisusu na nguya te, pamba te bakobotola yango mpe bakokaba yango na bato mosusu.
kino tango Yawe akopesa bopemi epai ya bandeko na bino ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino bango lisusu bakozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango na ngambo mosusu ya Yordani. Sima na yango, bokozonga, moko na moko, na mabele oyo napesaki bino. »
Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino.