Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 12:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bakolona ble, kasi bakobuka banzube ; bakobimisa mitoki na mosala, kasi bakozwa litomba ya malonga te. Boye, boyokela mbuma ya bilanga na bino soni, mpo na kanda makasi ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 12:13
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akabaki bato na Ye na mopanga, mpe asilikelaki libula na Ye.


Mpo na nini bozali kobebisa mbongo mpo na bilei oyo etongaka nzoto te, mpe kobimisa motoki mpo na bilei oyo etondisaka te ? Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko, mpe bokosepela na biloko ya elengi.


« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »


Tango nakobaki kotala, namonaki ete mokili oyo ezalaki na mabele ya malamu ekomaki esobe ; bingumba na yango nyonso ebebisamaki liboso ya Yawe, na kanda makasi na Ye.


Mosala na bango se kokosa na kokosa ; mpe na lokuta na bango, baboyaka kotosa Ngai, » elobi Yawe.


« Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.


tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.


Makasi na bino ekosila na pamba, mpo ete mabele na bino ekobota te mpe banzete ekobota te bambuma na yango.


Okolona bilanga, kasi okobuka bambuma te ; okokamola bambuma ya olive, kasi okomipakola mafuta na yango te ; okokamola bambuma ya vino, kasi okomela masanga na yango te.


Boni, ekatama te epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, ete misala ya bato ezala kaka lokola koni oyo ezali kopela moto, ete bikolo enyokwamaka bobele se pamba ?


Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. »


« Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke ; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko.


Nzokande, litomba nini bozwaki na tango wana oyo bozalaki kosala makambo oyo ezali koyokisa bino lelo soni, pamba te ememaka na kufa ?


Bokolona bankona ebele na bilanga, kasi bokobuka moke ; pamba te mabanki ekolia bankona wana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ