Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 12:12 - Mokanda na Bomoi

12 Babebisi bakobimela na likolo ya bangomba nyonso ya esobe, pamba te mopanga ya Yawe ekoboma mokili mobimba ; moto moko te akozala na kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 12:12
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mopanga na Yawe etondi na makila, ezipami na mafuta, na makila ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali, na mafuta ya bameme ya mibali, pamba te ezali na mbeka moko mpo na Yawe kati na Botsira mpe bazali koboma bato ebele penza kati na mokili ya Edomi.


Nzambe na ngai alobi : « Kimia ezali te mpo na bato mabe. »


Bongo soki batuni yo : ‹ Tokende wapi ? › Zongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga bakufa na mopanga ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi bakufa na nzala makasi ! Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu bakende na bowumbu ! ›


Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Kokota na ndako oyo ezali na matanga te, kokende na matanga te mpe koyokela bato oyo bazali na matanga mawa te, pamba te nalongoli kimia na Ngai, bolingo na Ngai mpe mawa na Ngai epai ya bato oyo, » elobi Yawe,


Mokili oyo mobimba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bikolo oyo ekosalela mokonzi ya Babiloni mibu tuku sambo.


« Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala : Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.


Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba : ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele, pamba te babebisi nzela na bango mpe babosani Yawe, Nzambe na bango.


« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo nde ezali koyokana ; kimia ezali lisusu te.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ;


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mokili mobimba ekobebisama, kasi nakobebisa yango nyonso te.


Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpo na kozongisela banguna na yo mabe. Mopanga ekoboma kino ekotonda, kino ekosilisa posa na yango ya makila ; pamba te ezali nde mbeka mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.


Bozali koganga : ‹ Ah mopanga ya Yawe, okopema tango nini ? Zonga na ebombelo na yo, tika koboma mpe zala kimia ! ›


Moabi ekozala lisusu na lokumu te, bato bakosalela yango likita kati na Eshiboni mpo na kokweyisa yango : ‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo ! › Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko ; mopanga ekolanda yo.


Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia, kasi tomoni likambo moko te ya malamu ; tozalaki na elikya ete tokobika, kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso !


Nazangaki kimia, nayebaki lisusu te nini yango bolamu.


To soki natindi mopanga ete eboma bato ya ekolo wana mpe nalobi : ‹ Tika ete mopanga eleka na mokili mobimba ! › Soki nabomi bato mpe bibwele na yango ;


Kasi lokola basilaki kolapa ndayi ete bakotosa ye, bavandi ya Yelusalemi bakomona yango lokola bimoniseli ya pamba mpe ya lokuta. Kasi mokonzi ya Babiloni akosala ete bakanisa lisusu mabe na bango, mpe akomema bango na bowumbu.


Bato nyonso bakomona ete ezali Ngai Yawe nde napelisi yango ; mpe ekotikala kokufa te. › »


Loba na mokili ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Natombokeli yo, nakobimisa mopanga na Ngai na ebombelo na yango mpe nakoboma bato, kati na mokili na yo, ezala bato ya sembo to bato mabe.


Mpo ete nakoboma bato ya sembo mpe ya mabe, mopanga na Ngai ekobima na ebombelo na yango mpo na koboma moto nyonso, wuta na sude kino na nor.


Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato ; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga.


Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.


Ezala banguna na bango bamemi bango na bowumbu, nakopesa mitindo na mopanga ete eboma bango kuna. Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosala bango mabe, kasi bolamu te.


Bino mpe bato ya Kushi bokokufa na mopanga na ngai.


Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, nakolangwisa makonga na Ngai na makila ya bato oyo babomi, ya bakangami mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. »


Bongo mpunda mosusu ebimaki : ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ