11 Bakomisi yango esobe, etikali pamba na miso na ngai, ekomi eloko ya mawa. Mokili mobimba ebebisami, pamba te moto moko te azali lisusu komema yango na motema.
Kokende na ndako ya matanga ezali malamu koleka kokende na ndako oyo ezali na feti, pamba te kufa ezali suka ya moto nyonso ; yango wana, bato nyonso oyo bazali na bomoi basengeli kokanisaka na tina na yango.
Boye, asopelaki bango moto ya kanda na Ye, mobulu ya etumba makasi ; azingelaki bango na moto na bangambo nyonso, kasi basosolaki te ; mpe moto ezikisaki bango, kasi bazwaki penza likambo yango na motema te.
Moto ya sembo azali kokufa, kasi ezali kosala ata moto moko te motema pasi ; bato ya malamu bazali kosila, mpe ata moto moko te azali kososola ete bato ya sembo bazali kolongolama mpo ete bazala mosika na mabe.
Boyoka ! Makelele moko ezali koya, lokito moko ya makasi ewuti na mokili ya nor, ekosilisa bato kati na bingumba ya Yuda mpe ekokomisa yango bandako ya mbwa ya zamba.
Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya oyo endimaka Yo te, likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, pamba te babebisi Jakobi, babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye.
« Bato ya Yuda bazali na matanga, bingumba na bango esili kobebisama, bazali kolela mpo na mokili na bango, mpe koganga ezali koyokana wuta na Yelusalemi.
Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, noki te nakomikomisa mosika na yo mpe nakokomisa mokili na yo esobe, mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »
« Nakokomisa Yelusalemi liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, ndako ya mbwa ya zamba ; nakobebisa bingumba ya Yuda, bongo moto moko te akovanda lisusu kuna.
Nakosala matanga mpe nakolela mpo na bangomba mpe matiti ya esobe. Nyonso esili kokawuka mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana ; ezala makelele ya bibwele to ya bandeke ezali lisusu koyokana te ; bandeke ya likolo ekimi mpe banyama ya zamba esili kokende.
Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.