Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 11:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bongo nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya bakoko na bino ete nakopesa bango mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo bozali na yango lelo. » Nazongisaki : — Solo, Yawe ; amen !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 11:5
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tika ete elaka oyo opesaki na Davidi, mosali na Yo, ekokisama !


Akanisaka tango nyonso Boyokani na Ye, bilaka na Ye mpo na bikeke nkoto moko,


Tango Yawe akokotisa yo na mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi, mokili oyo alakaki na batata na bino, na nzela ya ndayi, ete akopesa bino yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, okosala feti oyo na sanza oyo.


Yango ezali makambo oyo nakosala na esika oyo mpe epai ya bavandi ya esika oyo, elobi Yawe, nakokomisa engumba oyo lokola Tofeti.


Mosakoli Jeremi alobaki : « Amen ! Tika ete Yawe asala bongo ! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu !


Opesaki bango mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa na batata na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi.


Boye nayebisaki bino : ‹ Bino nde bato bokozwa mokili na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi ; napesi bino yango lokola libula. › Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo alongolaki bino kati na bikolo mpe atiaki bino pembeni.


komema biso na komekama te, kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ; [pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo ezali ya Yo seko na seko.]  ›


Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.


Oh Isalaele, yoka malamu ! Senzela ete otosa yango mpo ete ozala malamu mpe bokoma ebele na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge Yawe Nzambe ya bakoko na bino alakaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ