Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 11:19 - Mokanda na Bomoi

19 Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele ; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba : « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 11:19
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto ayebaka motuya na yango te, pamba te bakoki komona yango te kati na mokili ya bato ya bomoi.


Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, mpe bakombo na bango elongwa na ekeke oyo ezali kolanda !


Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.


Nakotambola liboso ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.


Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala ! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai !


Nakozalaka na elikya na likambo oyo : nakobika bolamu ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.


Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa ; nakomi lokola mbeki oyo epanzana.


Kasi awa ngai nakomi na pasi, bango bazali kosepela mpe kosangana ; wana ngai nayebi te, bango bazali kosangana mpo na kotonga ngai, bazali kolemba te kofinga ngai.


Olingaka mabe koleka bolamu, lokuta koleka koloba bosolo.


Bazali kosalela bato na Yo likita, kokanela bato oyo obatelaka.


Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli, kasi bakobosana kombo ya moto mabe.


Yo moto mabe, komeka te kotia mitambo kati na ndako ya moto ya sembo, mpe komeka te kopanza yango,


Elenge mobali alandaki ye mbala moko, lokola ngombe oyo bazali komema na bisika oyo babomaka banyama, lokola moto ya liboma oyo bakangi mpo na kobeta ye


Misala ya moyimi ezalaka mabe, abongisaka kaka miango ya mabe mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta na tango oyo mobola azali na mbeba te.


Namilobelaki : « Nakomona lisusu Yawe te, Yawe, na mokili ya bato ya bomoi ; nakomona lisusu ata moto moko te to kowumela elongo na bato oyo bavandi na mokili ya lelo !


Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ; pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.


Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


Kasi tango Jeremi asilisaki koloba na bato nyonso maloba oyo Yawe atindaki ye, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye mpe balobaki : « Okokufa !


Omonaki solo posa na bango ya kozongisa mabe na mabe mpe mabongisi na bango ya kosala ngai mabe.


Mokili ya Elami ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango ; bato na yango nyonso bakweyaki, bakufaki na mopanga. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo kati na mokili ya bato ya mokili yango basili kokita elongo na bato oyo bakatama ngenga te, na mokili ya bakufi ; bakoyoka soni bango moko elongo na bato oyo bakitaka na libulu.


Sima na baposo tuku motoba na mibale, bakoboma Ye oyo azwaki epakolami, atako asalaki na ye mabe ata moko te. Bato ya mokambi oyo azali koya bakobebisa engumba mpe Esika ya bule, mpe suka na yango ekoya lokola mpela ; bongo kino suka ya bitumba ekoma, kobebisama ekozala mpo ete mokano na yango esili kozwama.


Mokengeli ya Efrayimi azali elongo na Nzambe na ngai, azali mosakoli ; Nzokande bazali kotiela ye mitambo na banzela na ye nyonso mpe bazali kotelemela ye kino na Ndako ya Nzambe na ye.


mpo na libota ya Gadi : Eliazafi, mwana mobali ya Deweli ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ