Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 11:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bingumba ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi bakokende koganga epai ya banzambe ya bikeko oyo bazali kotumbela malasi ya ansa, kasi ekokoka kobikisa bango te tango pasi ya makasi ekokomela bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 11:12
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana azalaki kati na pasi, mokonzi Akazi akobaki lisusu kosala makambo ya nkele na miso ya Yawe :


Bosangana elongo mpe boya, bopusana elongo bino nyonso, bino bato oyo bobiki kati na bikolo ! Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te ; bazangi boyebi.


Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango, batelemisaka yango na esika na yango mpe etikalaka ya kotelema kaka wana. Wuta na esika na yango, ekoningana te. Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te, ekobikisa ye te na tango ya pasi.


Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai, bazali kotumba malasi ya ansa mpo na banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, oyo ebetisaka bango mabaku na nzela mpe epengwisaka bango na nzela ya kala, bongo ememaka bango na banzela mosusu oyo bafungola nanu te.


Wapi sik’oyo banzambe na bino, banzambe oyo bosalaki na maboko na bino ? Tika ete eya kobikisa bino na tango ya pasi, soki penza ekokoka ! Pamba te, oh bato na Yuda, ndenge motango ya bingumba na bino ezali, ndenge wana mpe motango ya banzambe na bino ezali.


Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda ? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili.


Bongo akoloba : « Wapi banzambe na bango ? Wapi libanga epai wapi babombamaki ?


Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango mpe komela makabo na bango ya vino ? Tika ete etelema mpo na kosalisa bino mpe kopesa bino ebombamelo !


Bokende koganga epai ya banzambe oyo boponaki mpo ete ebikisa bino awa bozali kati na pasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ