Jeremi 11:11 - Mokanda na Bomoi11 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo soki batuni yo : ‹ Tokende wapi ? › Zongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga bakufa na mopanga ! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi bakufa na nzala makasi ! Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu bakende na bowumbu ! ›
Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›