Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 10:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bapakola yango palata balekisa na moto, oyo ewuta na Tarsisi, mpe wolo oyo ewuta na Ufazi ; bato oyo basalaka bililingi na banzete mpe ba-oyo balambaka bibende na moto nde basalaka yango : balatisaka yango bilamba ya langi ya ble mpe ya motane ; ezali misala ya bato oyo basalaka misala ya maboko, oyo bayebi penza mosala malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 10:9
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kosala mombongo na ebale monene elongo na bamasuwa ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga longwa na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « paoni. »


Mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kokende na Tarsisi, elongo na basali ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga wuta na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « Paoni. »


Kasi banzambe na bango ya bikeko ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato.


Bakonzi ya Tarsisi mpe ya bisanga bakomemela ye mpako ya mokonzi, bakonzi ya Saba mpe ya Seba bakopesa ye makabo.


Bokatisa na ngambo ya Tarsisi, bolela makasi, bino bavandi ya esanga.


Ndenge basalaka ekeko, mosali bikeko anyangwisi ebende na moto mpe asali ekeko ; mosali ya wolo abambi ekeko yango wolo, bongo akangisi yango na basheneti ya palata.


Bato ya Tarsisi bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele mpe ya lolenge nyonso ; bazalaki komema epai na yo palata, bibende, eten mpe mbodi.


basalaki vwale mpe bendele na yo na elamba ya lino ya kitoko oyo ewutaki na Ejipito, mpe batongaki bililingi kati na yango ; bakapo na yo ezalaki ya langi ya ble mpe ya motane, ewutaki na bisanga ya Elisha.


natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki moto moko alata bilamba ya lino mpe mokaba moko ya wolo ya Ufazi na loketo na ye.


Ewuti na Isalaele ! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.


Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.


Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete : « Telema ! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi : « Lamuka ! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela ? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ