Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 10:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 10:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.


Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.


Tala, bango nyonso bazali banzambe ya lokuta ! Misala na bango ezali se pamba, bililingi na bango ezali se mopepe mpe biloko ya pamba. »


Bayebi eloko moko te, bazali na bososoli te ; miso na bango ekangama, emonaka te ; mitema na bango ezali makasi, esosolaka te.


Moko te akanisaka, moko mpe te azalaka na boyebi mpe na mayele mpo na koloba : « Na nzela ya ndambo na yango, napelisaki moto, nabelisaki mapa na makala na yango ya moto, natumbaki mosuni mpe naliaki yango. Bongo mpo na oyo etikali, nasala na yango penza likambo ya nkele boye ? Nafukamela penza mwa eteni ya nzete ? »


Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele ; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.


Balobaka na nzete : ‹ Ozali tata na ngai, › mpe na libanga : ‹ Yo nde obotaki ngai. › Bapesaki Ngai mikongo, kasi bilongi na bango te. Nzokande soki bakomi na pasi, babelelaka : ‹ Yaka kobikisa biso ! ›


Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete.


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


Namilobelaki : « Bato oyo bazali kaka bato pamba, bazangi mayele, mpo ete bayebi nzela ya Yawe te mpe bayebi malako ya Nzambe na bango te.


Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,


Wana nakomi pene ya kobungisa elikya, nakanisi Yo, Yawe, mpe libondeli na ngai emati kino epai na Yo, kino na Tempelo na Yo ya bule.


Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango ? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini ? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.


Nzokande, banzambe ya bikeko elobaka maloba ya pamba, mpe bimoniseli ya bato ya soloka ezalaka ya lokuta : bazwaka bandoto oyo ezanga tina, mpe malendisi na bango ezalaka ya lokuta. Yango wana, bato bakomaki kotelengana lokola bibwele oyo ezangi mobateli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ