Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 10:5 - Mokanda na Bomoi

5 Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko oyo batiaka na elanga ya bapasiteki mpo na kokimisa bandeke : elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te. Kobanga yango te, pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 10:5
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki : « Bala, yanola biso ! » Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki.


Mpo na yango, kanda ya Yawe epelelaki Amatsia ; mpe Yawe atindaki mosakoli moko kotuna Amatsia : — Mpo na nini ozali kogumbamela banzambe ya bato wana oyo ekokaki ata kokangola bato na yango te na loboko na yo ?


Bakomona Moabi komata na bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na kobondela na esika na ye ya bule, kasi akolonga te.


Bosangana elongo mpe boya, bopusana elongo bino nyonso, bino bato oyo bobiki kati na bikolo ! Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te ; bazangi boyebi.


Tala banzambe ya Babiloni : Beli esili ngala, Nebo ekweyi ; bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele ! Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi, ezali mokumba oyo elembisaka banyama.


Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango, batelemisaka yango na esika na yango mpe etikalaka ya kotelema kaka wana. Wuta na esika na yango, ekoningana te. Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te, ekobikisa ye te na tango ya pasi.


Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele ; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.


Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete : « Telema ! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi : « Lamuka ! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela ? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango.


Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.


Boye, na tina na likambo ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka se moko.


Kuna, bokogumbamela banzambe oyo esalemi na maboko ya bato, banzambe ya banzete to ya mabanga, oyo ekoki komona te, koyoka te, kolia te mpe koyoka solo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ