Jeremi 10:25 - Mokanda na Bomoi25 Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya oyo endimaka Yo te, likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, pamba te babebisi Jakobi, babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yango wana, « bozela Ngai, » elobi Yawe, « bozela Ngai na mokolo oyo nakoya mpo na kosamba elongo na bino ; nazwaki mokano ya kosangisa bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso mpo na kosopela bango kanda na Ngai, makasi nyonso penza ya kanda na Ngai : mokili mobimba ekozika na moto ya nguya ya kanda na Ngai.