Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 10:24 - Mokanda na Bomoi

24 Oh Yawe, pesa biso etumbu oyo ekoki na biso ; kasi kopesa yango na kanda te, noki te okosilisa koboma biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 10:24
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Masanga ya bato oyo batambolaka na bampunda mpo na kokende na mobembo, ebongoli nzela ya kokende, ekeyi kokota kino kati na esobe mpe ekufi kuna.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.


Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo, kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo.


Esengeli konika ble mpo na kosala mapa ; nzokande babetaka yango tango nyonso te, balekisaka nde bapine ya shar na likolo na yango mpe mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka, kasi banikaka yango te.


akomisaka bakonzi ya mokili bato pamba, mpe bakambi na yango lokola biloko pamba.


Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›


Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ; pamba te nazali elongo na yo, » elobi Yawe, « ata soki nabebisi bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino, nakobebisa yo nyonso te. Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ; nakozanga te kopesa yo etumbu. »


Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo ! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso ! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso ! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ