Jeremi 10:22 - Mokanda na Bomoi22 Boyoka ! Makelele moko ezali koya, lokito moko ya makasi ewuti na mokili ya nor, ekosilisa bato kati na bingumba ya Yuda mpe ekokomisa yango bandako ya mbwa ya zamba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.
Nzela oyo ekenda kino na Siona ezali na matanga, pamba te bato bazali koya lisusu na bafeti te. Bikuke na ye nyonso etikali lisusu na bato te, Banganga-Nzambe na ye bazali kolela, bana na ye ya basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazali na mawa ; bongo ye moko akomi na pasi makasi kati na motema.
mpe loba na bato ya mokili oyo : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele : Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo ; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango.