Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 10:21 - Mokanda na Bomoi

21 Pamba te bakambi bazangaki mayele, balukaki Yawe te ; yango wana, balongaki te, mpe bato nyonso oyo bango bazalaki kokamba bapanzanaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 10:21
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele ; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.


Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba !


Babateli ebele ya bibwele babebisi elanga na ngai ya vino, banyati-nyati elanga na ngai, babongoli elanga na ngai ya kitoko mabele ya kokawuka.


Banganga-Nzambe bamitunaki te mpo na koluka koyeba : ‹ Yawe azali wapi ? › Balakisi ya Mobeko balukaki koyeba Ngai te, bakambi batombokelaki Ngai ; basakoli bazalaki kosakola na kombo ya Bala mpe balandaki banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Koma kombo ya moto oyo lokola moto oyo abota te, lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye, pamba te moko te kati na bana na ye akolonga, moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidi to akozala lisusu mokonzi ya Yuda. »


Tika ete bashamo na bango ekoma bomengo ya bitumba, bayiba bibwele na bango ebele. Nakopanza na mopepe bavandi ya mosika, mpe nakokweyisela bango pasi longwa na bisika nyonso, » elobi Yawe.


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, oyo nkosi ezalaki kolanda : Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso oyo apasolaki Isalaele ; Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa.


Bato ya bwanya bakoyokisama soni, bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu, pamba te batiolaki Liloba na Yawe. Bazali na bwanya ya ndenge nini ?


Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi.


Kanda na Ngai ya makasi epeli mpo na babateli, mpe nakopesa bakambi etumbu, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayei mpo na kobatela etonga na Ye, libota ya Yuda ; akokomisa bango mpunda na Ye ya lokumu kati na bitumba.


Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ