Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 10:19 - Mokanda na Bomoi

19 Mawa na ngai, pamba te nazoki makasi na motema ! Pota na ngai ezali kosila te ! Namilobelaki : « Ezali pasi na ngai moko, esengeli na ngai kokanga motema. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 10:19
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso, kopesa nzela te na bazoba ete bafinga ngai.


Nzambe abosani solo kosala ngolu ? Akangi penza motema na Ye mpo na kanda ? »


Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye.


Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.


Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.


Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.


Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh ! Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi, ezali koswa makasi kati na ngai, mpe nazali kokoka kokanga monoko te, pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.


Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »


Ndenge bato na ngai bazali koyoka pasi, ndenge wana mpe ngai nazali koyoka pasi, nazali kolela, mpe somo ekangi ngai makasi.


Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !


Butu mobimba, azali kolela se kolela, mpinzoli etondi na matama na ye. Kati na bamakangu na ye nyonso, moko te ayei kobondisa ye ; baninga na ye nyonso bakosi ye, bakomi banguna na ye.


Miso na ngai ezali kosopa miluka ya mpinzoli mpo ete bato na ngai babebisami.


Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe, nakomema mokumba ya kanda na Ye kino tango akozwa likambo na ngai na maboko mpe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole, mpe nakomona bosembo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ