Oh Yelusalemi, yo oyo ovandaka na lubwaku, na mabanga ya etando ya likolo ya ngomba, nazali kosepela na yo te, elobi Yawe, yo oyo olobaka : ‘ Nani azali na makoki ya kobundisa biso ? Nani azali na makoki ya kokota na ekimelo na biso ? ’
« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.
Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—
Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino.