Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 10:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 10:16
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, nalobi lisusu ete libula na ngai ezali : kotosa liloba na Yo.


Pamba te Yawe aponaki Jakobi, Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.


Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala ! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai !


Likolo ekelamaki na Liloba na Yawe ; mampinga na yango nyonso, na nzela ya pema ya monoko na Ye.


Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba ; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.


Kanisa lisusu lisanga ya bato na Yo, oyo osikola wuta kala, libota oyo okomisa libula na Yo. Kanisa ngomba Siona epai wapi ovandaka.


Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai,


alobaki : — Eh Nkolo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, nabondeli Yo : tambola kati na biso. Atako bato oyo bazali batomboki, kasi limbisa mabe mpe masumu na biso, mpe zwa biso lokola bato na Yo !


Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, akopambola bango na maloba oyo : « Tika ete bopambolama : Ejipito, bato na Ngai ; Asiri, misala ya maboko na Ngai, mpe Isalaele, libula na Ngai ! »


Nasalaka pole mpe nakelaka molili, napesaka kimia mpe nakelaka pasi ; Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.


Mosikoli na biso, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga, Mosantu ya Isalaele.


Nasilikelaki bato na Ngai, nasambwisaki libula na Ngai ; nakabaki bango na maboko na yo, mpe oyokelaki bango mawa te ; bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi.


Nazali Yawe, Nzambe na Yo, oyo aningisaka ebale monene mpo ete mbonge na yango etomboka. Kombo na Ye ezali ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga. ›


pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.


Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye, alendisa mokili na bwanya na Ye mpe atanda likolo na mayele na Ye.


Eh Yawe, moko te akokani na Yo ! Ozali monene, mpe Kombo na Yo ezali na nguya monene.


Tala makambo oyo Yawe alobi, Ye oyo atia moyi mpo ete engengisa mokolo, apesa mibeko ete sanza mpe minzoto engengisa butu, aningisaka ebale monene mpo ete mbonge etia makelele, mpe oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga :


Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ;


« Tala liloba oyo Yawe, Ye oyo akela mabele, oyo abongisa yango malamu mpe alendisa yango, oyo Kombo na Ye ezali Yawe, alobi :


Lokola Ngai nazali na bomoi, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba, lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene, azali koya !


Nzokande, Mosikoli na bango azali na makasi, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; akokotela bango na molende mpo ete amema kimia na mokili na bango mpe mobulu epai ya bavandi ya Babiloni.


Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, ezala ata ekolo oyo ezali libula na Ye ; Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Namilobeli : « Yawe azali elikya na ngai ; yango wana nakotia motema epai na Ye. »


Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.


Pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo apesaki ngai mokumba ya kosakola mpo na kotelemela bikolo oyo ebotolaki bino biloko na makasi alobi : Moto nyonso oyo akosimba yo akosimba nde mbuma ya liso na Ngai.


Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ; Jakobi azali libula na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ