Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 10:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, lokola bato oyo basili mayele ; monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, ezalaka na pema te kati na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 10:14
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na Likolo, Yawe atalaka bato mpo na koluka koyeba soki ezali ata na moko oyo azali na mayele, oyo atalelaka Nzambe.


Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo !


Bino bato ya kilikili, bososola ! Bazoba, bokokoma mayele tango nini ?


Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko, bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta ! Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye !


Solo, nazali zoba koleka bato nyonso, nazali ata na mayele ya bomoto te ;


Kasi bato oyo batiaka elikya na banzambe ya bikeko mpe balobaka na bililingi : « Bozali banzambe na biso, » bakozonga sima mpe bakosambwa.


Tala, ye elongo na baninga na ye bakozala na soni ; basali bikeko bazali na bango kaka bato lokola bato nyonso ! Tika ete bango nyonso baya elongo mpe batelema wana ; bakokweya na somo mpe na soni.


Bato nyonso oyo basalaka banzambe ya bikeko bakoyoka soni mpe bakosambwa ; bango nyonso, bakokende na soni.


Nakobimisa bosembo mpe misala na yo na pwasa, mpe ekozala na litomba ata moko te mpo na yo.


Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko oyo batiaka na elanga ya bapasiteki mpo na kokimisa bandeke : elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te. Kobanga yango te, pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. »


Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba !


Basundolaki bosolo ya Nzambe mpo na komipesa na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe bagumbamelaki bikelamu, na esika ya Mokeli oyo apesamela nkembo mpo na seko. Amen !


Kasi tango balamukaki na tongo ya mokolo mosusu oyo elandaki, bamonaki lisusu Dagoni akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe, moto mpe maboko ekatana, mpe etandama na ekotelo ; kaka nzoto na ye nde etikalaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ