Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 10:13 - Mokanda na Bomoi

13 Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, apelisaka mikalikali, anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe wuta na bibombelo na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 10:13
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

ata nzete moko te ya elanga ezalaki, mpe ata molona moko te ya elanga etikalaki kobimisa moto, pamba te Yawe Nzambe anokisaki nanu mvula te na mokili, mpe moto azalaki te mpo na kolona yango na mabele.


Eliya alobaki na Akabi : — Kende, lia mpe mela, pamba te nazali koyoka makelele ya mvula makasi.


Boni, osila kokoma na esika oyo babombaka mvula ya pembe mpe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga ?


Wuta na bandako na Yo ya likolo, onokisaka mvula na likolo ya bangomba ; mokili etondi na mbuma ya misala na Yo.


ezali na matoyi, kasi eyokaka te ; ezali ata na pema te kati na minoko na yango.


Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.


Azipaka likolo na mapata, abongisaka mvula mpo na mokili mpe abotisaka matiti na bangomba.


Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kokimisa mapata, konokisa mvula ya mabanga mpe kobimisa makala ya moto.


Bino, babokonzi ya mabele, boyembela Nzambe ; boyemba banzembo mpo na lokumu ya Nkolo !


Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito.


Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.


Yango ezali makambo oyo nakosala na esika oyo mpe epai ya bavandi ya esika oyo, elobi Yawe, nakokomisa engumba oyo lokola Tofeti.


Bamilobelaka te : ‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso, oyo anokisaka mvula na tango ekoki, na eleko ya kolona mpe ya kobuka ; oyo akatela biso baposo oyo esengeli mpo na kobuka milona. ›


Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, apelisaka mikalikali, anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe wuta na bibombelo na Ye.


Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali : Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.


Bosenga epai na Yawe ete anokisa mvula ya suka ; ezali Yawe nde atindaka mapata mpe bakake oyo ememaka bamvula minene, Ye nde abimisaka matiti na elanga ya moko na moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ