Mishe alobaki : — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo,
wana bino batikali ya Yuda, boyoka malamu Liloba na Yawe : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Soki botingami kaka kokende na Ejipito mpe soki bokeyi kovanda kuna,
Bana ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! Pamba te Yawe azali kosamba na bino, bavandi ya mokili, mpo ete bosolo, bolingo mpe boyebi ya Nzambe ezali lisusu te kati na mokili ;
Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai : « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki ! »
Mpe tala mpo na nini tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe : tango boyambaki Liloba na Nzambe, oyo toteyaki bino, bondimaki yango te lokola liloba oyo ewuti epai ya bato, kasi lokola penza Liloba na Nzambe, oyo ezali kosala kati na bino oyo bozali na kondima.