Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 1:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 1:9
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi, abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye, akomisi ngai lokola tolotolo mpe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye ;


Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi ; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.


Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo, mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai ; nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango, oyo atongaki miboko ya mabele mpe oyo alobaki na Siona : ‹ Bozali bato na Ngai ! › »


« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki ozongi epai na Ngai, nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai ; soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina, kasi maloba ya pamba-pamba te, okozala molobeli na Ngai. Tika ete bato oyo balanda yo ; kasi yo, kolanda bango te.


Mosakoli Jeremi alobaki na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, maloba wana nyonso, kati na Yelusalemi,


« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Lokola bato oyo balobi maloba ya boye, nakosala ete maloba na Ngai ezala lokola moto na monoko na yo, mpe bato oyo bazala lokola bakoni oyo moto yango ekozikisa.


Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, yoka malamu maloba oyo nakoloba na yo mpe batela yango malamu kati na motema na yo.


Loboko moko esimbaki ngai mpe etelemisaki ngai, makolo mpe maboko na ngai ekomaki kolenga.


Boye, ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki bibebu na ngai, mpe nakokaki lisusu kofungola monoko na ngai mpo na koloba. Nalobaki na ekelamu oyo etelemaki liboso na ngai : — Nkolo na ngai, molimo na ngai etungisami likolo ya emoniseli oyo nasili kozwa, mpe, ngai moto, nalembi nzoto !


Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.


Tango bakofunda bino epai ya bakambi, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba to lolenge ya koloba yango, pamba te ekopesamela bino na tango wana.


Yesu alongolaki ye kati na ebele ya bato, amemaki ye na pembeni mpe atiaki ye misapi na matoyi ; atiaki ye soyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango.


pamba te Molimo Mosantu akolakisa bino, na tango yango, makambo oyo bosengeli koloba.


Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.


Yango nde likambo oyo bosengaki epai na Yawe, Nzambe na bino, na ngomba Orebi, na mokolo ya mayangani, tango bolobaki : « Toboyi koyoka lisusu mongongo ya Yawe, Nzambe na biso, to komona lisusu moto makasi oyo, noki te tokokufa. »


Yawe alobaki na ngai : « Makambo oyo balobi ezali malamu.


Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ