Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 1:8 - Mokanda na Bomoi

8 Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, —elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 1:8
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki : — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo.


Tango okokatisa mayi monene, nakozala elongo na yo ; mpe tango okokatisa bibale, ekozindisa yo te. Tango okotambola kati na moto, okozika te, mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;


« Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ?


Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.


Mibongisa, yika mpiko ! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo ; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.


Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ; pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.


Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba ; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te ; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.


Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›


Nzokande, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, apesaki mitindo oyo epai ya Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, na tina na mosakoli Jeremi :


Bobanga lisusu te mokonzi ya Babiloni, oyo bozali kobanga lelo ; bobanga ye te, » elobi Yawe, « pamba te nazali elongo na bino mpo na kobikisa bino mpe mpo na kokangola bino na maboko na ye.


Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.


Alobaki na bapesi toli na ye : — Botala ! Nazali komona bato minei bazali kotambola kati na moto, bakangama basinga te mpe moto ezali kozikisa bango te ; mpe moto ya minei azali lokola mwana ya banzambe.


Yango wana, bobanga bango te ! Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


Nazali na yo elongo, mpe moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo.


Nakokangola yo wuta na maboko ya bato ya ekolo na yo mpe na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Nakotinda yo epai na bango


Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.


Sik’oyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na Yo makasi ya koteya Liloba na Yo na molende nyonso.


Ezali mpo na Sango Malamu yango nde nazali motindami kati na minyololo. Boye, bobondelaka mpo ete natatolaka yango na kozanga bobangi, ndenge nasengeli penza kolobela yango.


Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »


Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko. »


Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te.


Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ