Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo.
« Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te.
Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Tika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye ! Pamba te bazali libota ya batomboki. »