Tango nazalaki nanu na lolenge te, ozalaki komona ngai ; mpe omikomelaki kati na buku na Yo mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai liboso ete moko te kati na yango ezala.
Moyize alobaki na Yawe : — Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai : « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu : « Ozwi ngolu na miso na Ngai. »
Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo : Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.
Boyoka ngai, bino bisanga ; boyoka maloba oyo, bino bikolo oyo ezali mosika : Yawe abengaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai, azalaki kolobela kombo na ngai wuta mbotama na ngai ;
Mpe sik’oyo, Yawe oyo asalaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpo ete nazala mosali na Ye, mpo na kozongisa Jakobi epai na Ye mpe kosangisa Isalaele pene na Ye, pamba te nazali na lokumu na miso ya Yawe mpe Nzambe na ngai azali makasi na ngai,
Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.
Nakokokisa kati na mokili yango maloba nyonso oyo nalobaki mpo na kotelemela yango, maloba nyonso oyo ekomama kati na buku oyo, maloba oyo Jeremi asakolaki mpo na kotelemela bikolo nyonso.
« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.
Nzokande, Mosikoli na bango azali na makasi, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; akokotela bango na molende mpo ete amema kimia na mokili na bango mpe mobulu epai ya bavandi ya Babiloni.
pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye.
Pamba te bato oyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa mpe bango wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.