Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 1:2 - Mokanda na Bomoi

2 Yawe alobaki na ye tango mokonzi Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 1:2
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kolanda etinda na Yawe, moto na Nzambe agangaki makasi mpo na kolakela etumbelo mabe : « Etumbelo, etumbelo ! Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mwana mobali moko akobotama na ndako ya Davidi, kombo na ye ekozala Joziasi. Akotumba na likolo na yo lokola mbeka banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba, oyo batumbaka ansa na likolo na yo. Mpe na likolo na yo, etumbelo, bakotumba mikuwa ya bato ! › »


Wana bavandaki na mesa, Yawe alobaki na mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe,


Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, oyo babengaka elanga ya Uza. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.


Bongo bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita mpe bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi na esika na ye.


Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, atindaki Shafani, mokomi mikanda na ye, mwana mobali ya Atsalia mpe koko ya Meshulami, na Tempelo ya Yawe. Alobaki na ye :


Sima na yango, Yawe atunaki ngai : — Jeremi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona etape ya nzete ya amande.


« Wuta tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi kino na mokolo ya lelo, ekokisi mibu tuku mibale na misato oyo nayebisaka bino tango na tango liloba oyo Yawe azalaki koloba na ngai, kasi boyokaki ngai te.


Sima na mosakoli Anania kobuka ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi :


Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba.


« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Oze, mwana mobali ya Beri, tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda, mpe tango Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele :


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Joeli, mwana mobali ya Petueli :


Yawe alobaki na Yona, mwana mobali ya Amitayi :


Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda : ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.


Na tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, azalaki mokonzi ya mokili ya Yuda, Yawe alobaki na Sofoni, mwana mobali ya Kushi, mwana mobali ya Gedalia, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Ezekiasi :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ