Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 1:18 - Mokanda na Bomoi

18 Na mokolo ya lelo, nakomisi yo engumba batonga makasi, likonzi ya ebende mpe mir ya ebende mpo na komibatela liboso ya mokili mobimba : liboso ya bakonzi ya Yuda, ya bakalaka na yango, ya Banganga-Nzambe na yango mpe ya bavandi nyonso ya mokili yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 1:18
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai, nakoyokisama soni te. Yango wana, nakomisi elongi na ngai makasi lokola libanga, mpe nayebi ete nakoyokisama soni te.


Mibongisa, yika mpiko ! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo ; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.


Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ; pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.


Oh mama na ngai, mawa na ngai ! Mpo na nini obotaki ngai ! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.


Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze ; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.


Kasi Yawe azali elongo na ngai lokola Elombe ya bitumba ; boye, banyokoli na ngai bakokweya mpe mikano na bango ekokokisama te ; bakotikala na soni mpe bakolonga te, bakobosana ata mokolo moko te soni na bango.


‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo.


Nzokande Ayikami, mwana mobali ya Shafani, abatelaki Jeremi ; boye akabamaki te na maboko ya bato mpo ete baboma ye.


Bongo yo, okobika te na loboko na ye, kasi bakokanga yo solo mpe bakokaba yo na maboko na ye ; okomona mokonzi ya Babiloni miso na yo moko, akolobana na yo elongi na elongi, mpe okokende na Babiloni.


« Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai : ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito ;


Kasi soki oboyi komipesa epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni mpe bakotumba yango, bongo ezala yo, okobika te na maboko na bango. »


« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi to mpe na bokono oyo ebomaka ; kasi ye oyo akobima mpo na kokende komikaba epai ya bato ya Babiloni akobika, akokufa te ; bomoi na ye ekozala bomengo na ye ya bitumba, mpe akotikala na bomoi. ›


Boye, boyeba sik’oyo malamu likambo oyo : bokokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka na esika oyo bolingi kokende mpo na kovanda. »


« Tala, nasili kotia yo kati na bato na ngai lokola esalelo oyo bamekelaka makasi ya bibende, mpo ete okoka kotala malamu mpe omeka ezaleli na bango.


Bongo amemaki Simona epai ya Yesu. Yesu atalaki Simona mpe alobaki : « Ozali Simona, mwana mobali ya Yoane ; kasi bakobanda kobenga yo Sefasi. »


Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ