Jeremi 1:14 - Mokanda na Bomoi14 Yawe alobaki na ngai : — Ezali wuta na nor nde pasi ekokomela bavandi ya mokili. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.
Nakotindika monguna ya nor mosika na bino, nakomema ye na mokili ekawuka mpe ezanga eloko ; bongo basoda na ye, oyo bazalaka na liboso bakozinda na ebale monene ya este ; mpe oyo bazalaka na sima, na ebale monene ya weste. Solo na ye ya kopola ekoyokana, kobeba na ye ekopanzana. » Solo, asali makambo minene.