Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 1:13 - Mokanda na Bomoi

13 Yawe atunaki ngai lisusu : — Ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona nzungu moko ezali kotoka, etengama na ngambo ya nor.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 1:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki Faraon alotaki ndoto yango na lolenge mibale, elingi koloba ete Nzambe asilaki kozwa mokano na likambo yango mpe akokokisa yango na lombangu.


ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka : ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.


Yawe atunaki ngai : — Jeremi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona bambuma ya figi : bambuma oyo ya kitoko ezali elengi, kasi oyo ekawuka ezali mabe mpe moto moko te akoki kolia yango.


Balobaka : ‹ Boni, tango ya kotonga bandako ekoki nanu te ? Engumba oyo ezali lokola nzungu, mpe biso, tozali lokola misuni. ›


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : engumba oyo ezali solo nzungu, mpe bibembe oyo bobwaki kuna, yango nde misuni ; kasi Ngai, nakobengana bino kati na yango.


Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Liloba na Ngai ata moko te ekowumela lisusu mpo na kokokisama. Maloba nyonso oyo nakoloba ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. › »


Atunaki ngai : — Amosi, ozali komona nini ? Nazongisaki : — Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela. Yawe alobaki na ngai : — Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ; pamba te nakolimbisa bango lisusu te.


Atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongiselaki ye : — Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ