ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka : ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.
Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Liloba na Ngai ata moko te ekowumela lisusu mpo na kokokisama. Maloba nyonso oyo nakoloba ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. › »