Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 1:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame ; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 1:1
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari : — Zonga na bilanga na yo, na Anatoti, pamba te osengeli kokufa. Kasi nakoboma yo sik’oyo te, pamba te omemaki Sanduku ya Nkolo Yawe liboso ya Davidi, tata na ngai, mpe okabolaki na ye pasi nyonso.


Ukoki mpe bamboka na yango ya mike, Reobi mpe bamboka na yango ya mike.


Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa.


Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki te liboso ya mosakoli Jeremi oyo azalaki koloba na Kombo na Yawe.


Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. »


Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi, mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba :


Bato ya mboka Anatoti : nkama moko na tuku mibale na mwambe.


Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.


Oh bato ya Galimi, boganga makasi ! Oh Layisi, sala keba ! Oh engumba Anatoti, mawa na yo !


Tala makambo oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na Yuda mpe Yelusalemi :


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato ya Anatoti, oyo balingi koboma yo mpe bazali koloba : « Kosakola na Kombo na Yawe te, soki te tokoboma yo ; »


Boye, mpo na nini opamelaki te mosakoli Jeremi, moto ya Anatoti, oyo azali komimona lokola mosakoli kati na bino ?


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :


Jeremi alingaki kobima na Yelusalemi mpo ete akende kozwa, kati na etuka ya Benjame, libula na ye ya mabele kati na bato ya kuna.


Yawe alobaki na Ezekieli, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Buzi, pembeni ya ebale Kebari, kati na mokili ya bato ya Babiloni. Kuna, loboko na Yawe ezalaki likolo na ye.


na mobu ya liboso ya bokonzi na ye, ngai, Daniele, nasosolaki, na nzela ya mikanda, kolanda liloba oyo Yawe apesaki na mosakoli Jeremi, ete kobebisama ya engumba Yelusalemi esengeli kosala mibu tuku sambo.


Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.


Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo : « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye.


Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.


Boye nde ekokisamaki makambo oyo mosakoli Jeremi alobaki :


Ezali ndenge wana nde maloba ya mosakoli Jeremi ekokisamaki : « Bakamataki mbongo ya bibende ya palata tuku misato, motuya oyo bato ya Isalaele bakataki mpo na ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ