Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.
Tango ebelemi, mokolo yango ekoki. Tika ete mosombi moko te azala na esengo to moteki moko te azala na mawa, pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso.
Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.
Tika ete moko na moko kati na bino apesa oyo akanaki kopesa kati na motema na ye, na mawa te mpe na makasi te, pamba te Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.
Bandeko na ngai, botonganaka te bino na bino. Moto oyo atongaka mpe asambisaka ndeko na ye asambwisaka mibeko mpe abukaka yango. Nzokande, soki ozali kosambwisa mibeko, elakisi ete ozali kotosa yango te, kasi ozali nde mosambisi na yango.
Pamba te Ye oyo apesa mibeko azali kaka Ye moko Mosambisi, Ye nde azali na makoki ya kobikisa mpe ya kobebisa. Bongo yo, ozali nani mpo ete osambisa moninga na yo ?
Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele : akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma.
Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.