Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi.
Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.
Tango nazalaka elongo na bato oyo balenda te na kondima, nakomaka lokola moto alenda te na kondima, mpo ete namema bango kati na kondima epai ya Klisto. Namikomisaka nyonso epai ya bato nyonso, mpo na kobikisa ndambo ya bato kati na bango.
Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo : ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai : niongo yango ezali nde bomoi na yo.
Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.
Bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso bazali bato ya esengo mpe basantu ! Kufa ya mibale ezali na bokonzi te epai na bango, kasi bakozala Banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakokonza elongo na Ye mibu nkoto moko.