Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba, mpe bampese ekolia bango lokola elamba basala na bapwale ya meme ; kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko, mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. »
Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.
Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;
Ndakisa : soki moto moko akoti kati na ndako na bino ya mayangani, alata penza bilamba ya talo mpe lopete ya wolo ; bongo mobola mpe akoti, alata bilamba na ye ya bobola.